Etuluku mɔ̌kɔ́ káti na mínei ya bato ba Swisi bazalí na lokóta na bangó la libosó óyo ezalí lokóta la ekólo tɛ́ (ebelé káti na bangó balobaka mpé lokóta la ekólo). Na káti ya bǎna, pɛnɛ na 40 likoló lya nkama balobaka minkokó míbalé tǒ koleka na ndáko. Koloba minkokó ebelé na káti ya libótá ekokí kozala litómba, ka óyo mpé mokakatano.
Babóti baútí na Kongó bakoki kosála níni mpô na kondimisa eté bǎna na bangó baloba mpé basɔsɔla Lingála? Na Mokɔlɔ́ mwa Lokótá la Mamá ya UNESCO mwa lɛlɔ́ (21. febwáli), tobɔngisi mwa toli.
Esengaka milende
Koloba minɔkɔ ebelé emɔ́nánáká míngi lokóla elokó la malámu. Kási, ndéngé ya kotálela yangó etálí míngi makambo ndéngé na ndéngé, lokóla ezalela ya bomoi mpé ya nkita, ndéngé molobeli mwa minɔkɔ Shpresa Jashari alimbólí: koyéba minɔkɔ ebelé ya bato óyo bazalí na bomoi ya malámu (loléngé la "expat") bato ba engumba bamɔnáká yangó malámu, kási óyo ya bato óyo bazalí na mosɔlɔ mɔkɛ tǒ bazángi etéyelo (loléngé la "mokɔ́ti mbóka") bamonáká yangó malámu tɛ́. Na ndéngé môko, koyéba minɔkɔ ebelé óyo elokó óyo lingómbá ekokí kondima.
Atǎ sɔ́kí minɔkɔ mya mpoto lokóla Lingɛlɛ́sa tǒ Falansé emonanaka lokóla litómba, koyéba monɔkɔ mwa Lialbani, Liturki tǒ Lipoloni mbala míngi emonanaka tɛ́ lokóla elokó la motúya míngi na káti ya lingómbá lya Swisi. Kási óyo mpé na ndéngé mosúsu: "Toyébí na nzelá ya bolukilúkí eté bǎna bamonáká pɛtɛ mpô na koyékola nkóta mosúsu, lokóla Lialémani, sɔ́kí bazalí na maloba ebelé mpé ya mozindo na nkóta na bangó ba libótá," ndéngé Gina Domeniconi ya Bobɔ́ngɔ Swisi bwa Bopanzí Nsango ya Wwǎna mpé Elɛngɛ (SIKJM) alimbólí. Lokóla babóti bakomi na boyébi míngi na lokóta óyo bazalí kotíkela bǎna na bangó, óyo malámu koleka – yangó elingí koloba eté koléndisa koyékola lokóta la libosó na lokóta la mbóka ya babóti óyo na ntína.
Ntángo bazalákí kotálela malámu mazwi ma mabé óyo bilenge bya Swisi bazwákí na kotanga mpé kokoma na boyékoli PISA bwa mbula 2000, "emonanákí polele eté esengeli tóbanda mosíká libosó," elobí Domeniconi. Atǎ eleko óyo bǎna babandaka naíno koloba tɛ́ óyo na ntína míngi: "Búku ya bilílí, kotála bilembo na bisíká ya bato, masapo ma míké na bomoi bwa mokɔlɔ na mokɔlɔ – yangó nyɔ́nsɔ óyo bileko bya ntína mpô bǎna bayékola lokóta." Lɛlɔ́ óyo, bolukiluki emonisi eté sɔ́kí mwǎna ayébí malámu monɔkɔ na yé mwa libótá mpé sɔ́kí maloba na yé na monɔkɔ wǎná óyo ebelé, akoyekola malámu koleka monɔkɔ mwa mbóka óyo afándí na yangó na mikɔlɔ ekóya. Ezalí malámu koleka sɔ́kí babóti na yé ba bapaya balobaka na yé monɔkɔ mwa mbóka wǎná na ndéngé ya libúngá. Yangó wǎná, koloba (káka) Lingála na mwǎna na ndáko óyo mobɔ́ko mpô na koyéba malámu minɔkɔ misúsu.
Nkóta ya mbóka óyo banzéla
Kotálela tɛ́ makanisi ya bato, kobátela nkóta ya mbóka óyo na ntína, elobí Shpresa Jashari: "Nkóta epesaka yɔ́ mpé nzelá ya kokota na lisapo na yɔ́ mɔ̌kɔ́. Mpé óyo gbagba óyo ekangisaka yɔ́ na bato mosúsu óyo balobaka yangó na Swisi mpé na mokili mobimba."
Babóti ebelé óyo balobaka minɔkɔ míngi balingaka mpé kopesa bǎna na bangó nzelá óyo ya motúya. Misúsu mityaka na mokúmbá mpô na kosála yangó: balingaka kopesa minɔkɔ na bangó na loléngé la "malámu" koleka mpé bakébaka míngi eté basangisa yangó tɛ́.
Óyo ekokí kosálisa:
- Kosolola na bato mosúsu óyo balobaka Lingála
Sign up here with your email


Otála nkomalámu, siwuplé: https://addons.mozilla.org/fr/firefox/addon/lingala-spell-checker/
Avant d'envoyer votre commentaire, veuillez vérifier l'orthographe, s'il vous plaît: https://addons.mozilla.org/fr/firefox/addon/lingala-spell-checker/
Before sending your comment, would you like check the spelling please: https://addons.mozilla.org/en-US/firefox/addon/lingala-spell-checker/ ConversionConversion EmoticonEmoticon