Yoka Mampunga, mokomi wa Makalamba azalí mpenzá mwăna nsɔmi ya Zaïre. Abótámí o engumba mei ya Kinsásá o mobú 1927. Bomwána mpé bonzenga bwa yé bonso káka o Kinsásá. O nsima ya bitéyelo bya yambo mpé bya káti (Humanités ya kala) azalí míngi o Letá. Azalákí kutu ntómá ya Zaïre o bikólo bi mosúsu.
Sitwaye Yoka Mampunga azilí abimísí:
– Elakísí Engumba ya Kinsásá.
– Mondonga, elenge mwăsi ya Zaïre.
– Boketsu, nkoko móko ya băna Zaïre.
Makalamba ebimákí mbala ya libosó na mobú 1964. Ezalákí na nkómbó Makalamba, mwăna nsɔmi ya Kongo. Na ntángo wana Ekólo ya biso ekomákí naíno na Bobongwani bwa lɛlɔ́ tɛ́. Mpé ekomákí naíno na nkómbó ya Zaïre tɛ́.
Búku na yé ya libosó, *Makalamba*, ebimákí na nkuku na mobú 1966 na nkoma ya bakopi káka ntúkú mobale. Ebimákí polele na ndáko ya bobimisi Editions Bobiso káka na mobú 1976. Simá na yangó, afándákí na mwăna na yé ya mwăsi na Falansia, esíká akúfákí na mobú 2000.
15 yúni 1927 - 23 ɔkɔtɔ́bɛ 2000
Sign up here with your email

Otála nkomalámu, siwuplé: https://addons.mozilla.org/fr/firefox/addon/lingala-spell-checker/
Avant d'envoyer votre commentaire, veuillez vérifier l'orthographe, s'il vous plaît: https://addons.mozilla.org/fr/firefox/addon/lingala-spell-checker/
Before sending your comment, would you like check the spelling please: https://addons.mozilla.org/en-US/firefox/addon/lingala-spell-checker/ ConversionConversion EmoticonEmoticon