Butú Pi (Silent Night / Douce Nuit lyrics)

 
«Butú pi!» ezalí nzémbo ya Nɔ́ɛlɛ ya Bavalia (Alémani). Ekomámákí na Sango Josef Mohr (lialémani o 1816) mpé eyémbámákí na Franz Xaver Gruber (mizíki o 1818). 

Loyémbo | couplets | lyrics

1. Butú pi! kámwáni! 
Báns'o nsé, yokani. 
Bánzelú bakokít' áw'o nsé; 
mpé bayeí kobosangela 'te: 
«Mwǎna Yézu ayeí, 
Mwǎna Yézu ayeí.» 

2. Butú pi! kámwáni! 
Nzámbe mei, yebani! 
Nkembw' aye ekosúkaka tɛ́ 
mpé apusí kolinga ba nsé. 
Mwǎna Yézu ayeí; 
Mwǎna Yézu ayeí. 

3. Butú pi! kámwáni! 
Maria, táláni! 
Akokúmisa mwǎna wa yé, 
amoyebi mobíkisi mei 
Yézu, Nzámbe wa yé, 
Yézu, Nzámbe wa yé. 

4. Butú pi! kámwáni! 
Zábolo, kim'esi! 
Ngondo abótí Mokónzi wa yɔ̌, 
Ngondo abótí mokongo wa yɔ̌. 
Yézu Nzámbe ayeí, 
Yézu Nzámbe ayeí. 

5. Butú pi! kámwáni! 
Mwǎn'óyo, memyani; 
akotánda mabɔ́kɔ ma yé 
yamba lɛlɔ́ bolingo bwa yé 
Yé mobíkisi ayeí, 
Yé mobíkisi ayeí.

Nkomalámu | Orthographe: Standardisation et uniformisation de l'orthographe des langues nationales (1974).
súka
elekí
elandí »

Otála nkomalámu, siwuplé: https://addons.mozilla.org/fr/firefox/addon/lingala-spell-checker/

Avant d'envoyer votre commentaire, veuillez vérifier l'orthographe, s'il vous plaît: https://addons.mozilla.org/fr/firefox/addon/lingala-spell-checker/

Before sending your comment, would you like check the spelling please: https://addons.mozilla.org/en-US/firefox/addon/lingala-spell-checker/ ConversionConversion EmoticonEmoticon