Lokótá la lokɛ́ (langue minoritaire)

Lokótá la lokɛ́ na ndáko La langue minoritaire à la maison The minority language at home
Mɔ̌kɔ́ ya banzéla ezali ya kosálela «monɔkɔ ya bato mɔkɛ́ na ndáko», óyo babengaka mayɛ́lɛ ya ML@H. Yangó ekokí kosála ntángo babóti nyonso míbalé bazalí malámu na monɔkɔ mɔ̌kɔ́ tǒ minɔkɔ nyonso míbalé ya mbóka ya babálani.

Tozwa ndakisa ya mamá mwa Kongó óyo abokola bǎna na yé na Lausanne na mobáli ya Swisi óyo alobaka pe lingála. Na likambo óyo, libótá mobimba ekosálela Lingála na ndáko mpé falansé libanda ya libúngútulú lya libótá.

Loléngé óyo esálisaka mpó babóti mosúsu bámiyoka lokóla eté bazali kopɛngwisa bato mosúsu ya lisangá na ndenge bazali kopekisa bangó bázala na boyókani na libótá na bangó.

Ezali mpé kotya molongo ya polele mpó na bǎna – mbóngwana ya nkóta esálemaka na ndáko.
Une option consiste à utiliser la «langue minoritaire à la maison», dite technique ML@H. Cela peut fonctionner lorsque les deux parents sont à l’aise dans l’une des langues maternelles du couple ou les deux confondues.

Prenons l’exemple d’une mère congolaise qui élève ses enfants à Lausanne avec un mari suisse parlant également le lingala. Dans ce cas, toute la famille utilisera le lingala à la maison et le français en dehors de la sphère familiale. 

Cette approche permet d’éviter à certains parents d’avoir l’impression de tenir à l’écart les autres membres de la communauté en les empêchant d’interagir avec leur famille.

Elle définit également un cadre clair pour les enfants – c’est à la maison que le changement de langue s’effectue.
Another option is to use the «minority language at home», known as the ML@H technique. This can work when both parents are comfortable in one or both of the couple's mother tongues.

Take, for example, an Congolese mother raising her children in New York with an American husband who also speaks Lingala. In this case, the whole family will use Lingala at home and English outside the family sphere.

This approach avoids some parents feeling that they are alienating other members of the community by preventing them from interacting with their family.

It also provides a clear framework for children - it is at home that the language change takes place.
Mokakatano yangó?
Mobóti óyo andimí kosálela monɔkɔ mosúsu óyo ezali ya yé mɔ̌kɔ́ te na ndáko (tatá ya Suisse na ndakisa óyo ezali áwa na likoló) akokí koyoka mwa kozánga bosepeli óyo ezali na boyókani na likokí te ya kosolola na bǎna na yé na ndenge ya bomoto lokóla bakosála na monɔkɔ na bangó ya mbóka.
La difficulté? 
Le parent qui accepte d’utiliser une autre langue que la sienne à la maison (le papa suisse de l’exemple ci-dessus) peut ressentir une certaine frustration liée à l’impossibilité d’interagir avec ses enfants aussi naturellement qu’il le ferait dans sa langue maternelle.
The difficulty?
A parent who agrees to use a language other than his or her own at home (the Swiss dad in the example above) may feel some frustration at not being able to interact with their children as naturally as they would in their mother tongue.

Otála nkomalámu, siwuplé: https://addons.mozilla.org/fr/firefox/addon/lingala-spell-checker/

Avant d'envoyer votre commentaire, veuillez vérifier l'orthographe, s'il vous plaît: https://addons.mozilla.org/fr/firefox/addon/lingala-spell-checker/

Before sending your comment, would you like check the spelling please: https://addons.mozilla.org/en-US/firefox/addon/lingala-spell-checker/ ConversionConversion EmoticonEmoticon