Lingála elobamaka na Kongó-Kinsásá, Kongó-Mfoa (Kongó-Brazzaville) mpé Angola. Lingála ewútí na bituka ya mitio (Nord) mpé eyeí kozwa ngúyá makasi na bingumba ya Kinsásá mpé Mfoa.
Na moyi ya lɛlɔ́, bato balobaka lingála bazalí motúya bóni?
Bato ya mindule mpé ya maboke bazwí yangó lokóla monᴐkᴐ na bangó ya kosanela. Lɛlɔ́ óyo lingála epanzani na Kongó mobimba, ezalí pási okoma na engumba mɔ̌kɔ́ okúta moto azángí koyéba lingála.
Tokoluka komeka koyéba motúya ya bato balobala lingála na moyi ya lɛlɔ́. Lokóla botangí bato ekopesa biso nzelá ya koyéba tɛ́ náni alobaka níni, tokimeka koyéba motúya yangó útá na bizaleli ya engumba tǒ mbóka mɔ̌kɔ́-mɔ̌kɔ́.
Na moyi ya lɛlɔ́ tokokí koloba eté: pɛnɛ na bato 70 000 000 balobaka lingála. Lɛlɔ́ óyo, motúya ya bato óyo balobaka Mangala ezalí se kobuta. tokokí kokabola bato ya mangala na maboke mínei:
bato óyo lingála ezalí monᴐkᴐ ya libosó balobaka
bato óyo lingála ezalí monᴐkᴐ ya míbalé balobaka
bato óyo lingála ezalí monᴐkᴐ ya misáto balobaka
bato óyo bayebi lingála
Bato óyo lingála ezalí monᴐkᴐ ya libosó balobaka
Lɛlɔ́ óyo Kinsásá mobimba, ezala bato babotami na Kinsásá, ezala bato bawútí bambóka misúsu ya Kongó mpé batóndísí Kinsásá, bangó nyɔ́nsɔ basololaka sé na lingála. Na boye, tokokí koloba eté balobi lingála na Kinsásá bazalí pɛnɛ na motúya bifukú zómi (10 millions).
Na bingumba ya mitio, ezala bingumba ya mikɛ́ lokóla Bolobo, Lukolela, Gemena tǒ mpé na bingumba minɛ́nɛ lokóla Mbandaka mpé Kisangáni, bato balobaka lingála lokóla monᴐkᴐ ya libosó. Na simá basálelaka minoko na bangó ya mboka, sɔ́kí bakutani bato ya ekolo mɔ̌kɔ́. tokokí kotanga bato pɛnɛ na bilundu mínei (4 millions).
Na Mfoa (Brazzaville) ezalí na bato pɛnɛ na efukú mɔ̌kɔ́ na ndámbo (1,5 millions). Koleka káti-káti, balobaka lingála lokóla monᴐkᴐ na bangó ya libosó mpé óyo etíkálí balobaka yangó lokóla monᴐkᴐ ya míbalé. Toloba eté bazalí pɛnɛ na bilundu mwambe (800 mille).
Na boye tokokí koloba eté bato óyo lingála ezalí monᴐkᴐ na bangó ya libosó, bazalí pɛnɛ na motúya mɔ̌kɔ́ na ndelo ya mwambe na bifukú mítáno (15 millions).
Bato óyo lingála ezalí monᴐkᴐ ya míbalé balobaka
Na bingumba ya ngele (Sud) lokóla Pointe-Noire, Matadi, Boma, Kikwit, Bandundu kuna lingála elobaka bo monᴐkᴐ ya míbalé na simá ya Kituba (Kikongo ya Leta). Tokokí kotanga bato na bifukú míbalé (2 millions)
Na bingumba ya monyɛlɛ (Est), ezala na bituka ya minɛ́nɛ lokóla Lubumbashi, Bukavu, Goma tǒ mpé bingumba ya mikɛ́ lokóla Bunia, Beni, Likasi, Kolwezi, kuna kiswahili nde elobamaka lokóla monᴐkᴐ ya libosó mpé lingála elobamaka lokóla monᴐkᴐ ya míbalé. Tokokí kotanga bato pɛnɛ na bifukú mitáno (5 millions)
Na bituka ya Kasayi, na bingumba minɛ́nɛ (Mbuji-Mayi mpé Kananga) tǒ bingumba ya mikɛ́ lokóla Tshikapa, Tshiluba nde elobamaka lokóla monᴐkᴐ ya libosó mpé lingála monᴐkᴐ ya míbalé. Tokokí kotanga bato pɛnɛ na bifukú mítáno (5 millions).
Na bingumba ya Sankuru, Otetela mpé minoko misúsu ya mbóka nde elobamaka lokóla monᴐkᴐ ya libosó mpé lingála elobamaka lokóla monᴐkᴐ ya míbalé. Tokokí koàtanga bato pɛnɛ na efukú mɔ̌kɔ́ (1 million).
Kongó-Mfoa (Kongó-Brazzaville) ezalí na bato pɛnɛ na bifukú mínei na ndámbo (4,5 millions). Sɔ́kí olongólí bato ya Mfoa mpé ya Pointe Noire, otíkálí na bato pɛnɛ na bifukú míbalé. Na bituka ya likoló, pɛnɛ na efukú mɔ̌kɔ́ (1 million) ya bato balobaka lingála lokóla monᴐkᴐ na bangó ya míbalé.
Na bambóka ya káti ya Kongó-Kinsásá, sɔ́kí ozwí bituka ya mitio (Maï-Ndombe, Ekwáteli, Tshuapa, Ubangi ya Nola, Ubangi ya Sídi, Tshiopo, Wɛlɛ ya Likoló, Wɛlɛ ya Nsé, ndámbo ya Ituri), basálelaka lingála lokóla monᴐkᴐ na bangó ya míbalé. Bituka wana ezalí na bato pɛnɛ na motúya mɔ̌kɔ́ na ndelo ya mwambe na bifukú mísáto (15 millions).
Na boye tokokí koloba eté bato óyo lingála ezalí monᴐkᴐ na bangó ya míbalé, bazalí pɛnɛ na motúya míbalé na ndelo ya mwambe na bifukú libwa (29 millions).
Bato óyo lingála ezalí monᴐkᴐ ya mísáto balobaka
Na bambóka ya káti ya Kongó-Kinsásá, sɔ́kí olongólí bituka ya mitio (Maï-Ndombe, Ekwáteli, Tshuapa, Ubangi ya Nola, Ubangi ya Sídi, Tshiopo, Wɛlɛ ya Likoló, Wɛlɛ ya Nsé, ndámbo ya Ituri), míngi káti na bangó, basálelaka lingála lokóla monᴐkᴐ na bangó ya mísáto. tokokí kotanga bato pɛnɛ pɛnɛ na motúya míbalé na ndelo ya mwambe na bifukú mísáto (25 millions).
ya Bienvenu Sene Mongaba o 20 augústo 2017 [Lokásá óyo ezalí lisúsu kosála tɛ́.]
Sign up here with your email
Otála nkomalámu, siwuplé: https://addons.mozilla.org/fr/firefox/addon/lingala-spell-checker/
Avant d'envoyer votre commentaire, veuillez vérifier l'orthographe, s'il vous plaît: https://addons.mozilla.org/fr/firefox/addon/lingala-spell-checker/
Before sending your comment, would you like check the spelling please: https://addons.mozilla.org/en-US/firefox/addon/lingala-spell-checker/ ConversionConversion EmoticonEmoticon